Mark 4

Lisapo ya moloni

(Mt. 13.1-15 ; Lk. 8.4-10)

1Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale monene. Bato ebele penza bayaki kosangana epai na ye ; yango wana amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, bongo bato nyonso bazalaki na mokili, pembeni ya ebale. 2Ateyaki bango makambo mingi na masapo ; mpe na mateya na ye alobaki :

3—Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona mbuma. 4Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bongo bandeke bayaki mpe baliaki yango. 5Ndambo mosusu ekweyaki na esika ya mabanga, esika mabele ezalaki mingite ; ebimaki noki, mpo mabele yango ezalaki mozindo te. 6Tango moi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpo ezalaki na misisa te. 7Mosusu ekweyaki na kati ya banzube. Banzube ekolaki mpe efinaki yango ; yango wana ebotaki bambuma te. 8Mosusu ekweyaki na mabele ya malamu. Ebimaki, ekolaki, mpe ebotaki bambuma : moko ntuku misato, mosusu ntuku motoba, mpe mosusu nkama. 9Bongo Yesu alobaki :

—Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka !

10Tango azalaki kaka ye moko, bapostolo zomi na mibale elongo na bato oyo bazalaki kozinga ye batunaki ye mpo na masapo. 11Yesu alobaki na bango :

—Sekele ya Bokonzi ya Nzambe epesameli bino. Kasi mpo na baoyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kolobama na masapo,
12mpo ete : Tango bazali kotala, bakotala na bango,
kasi bazali komona te,
Tango bazali koyoka, bakoyoka na bango,
kasi bazali kososola te ;
nakobanga ete babongola mitema
mpe masumu na bango elimbisama.

13Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bososoli lisapo oyo te ? Bongo ndenge nini bokososola masapo nyonso ?

(Mt. 13.18-23 ; Lk. 8.11-15)

14—Moloni ezali oyo alonaka Liloba. 15Bato mosusu bazali lokola mbuma oyo ezali pembeni ya nzela, epai Liloba elonamaki. Tango bayokaka yango, Satana ayaka noki mpe abotolaka Liloba oyo elonamaka kati na bango. 16Basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na esika ya mabanga, bayokaka Liloba mpe bandimaka yango mbala moko na esengo. 17Kasi lokola bazalaka na misisa te, bawumelaka kaka mwa tangomoke. Tango pasi to minyoko eyaka mpo na Liloba, bakweyaka noki penza. 18Basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na kati ya banzube, bayokaka Liloba ; 19kasi mitungisi ya bomoi oyo, lokuta ya bomengo, mpe baposa mpo na makambo mosusu ekotaka mpe efinaka Liloba, mpe epesaka yango nzela te mpo ebota. 20Bongo basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na mabele ya kitoko, bayokaka Liloba, bandimaka yango, mpe babotaka mbuma : moko ntuku misato, mosusu ntuku motoba mpe mosusu nkama.

Lisapo ya mwinda

(Lk. 8.16-18)

21Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bomemaka mwinda mpo na kotia yango na nse ya katini to na nse ya mbeto ? Boni, ezali te mpo etiama likolo ya eloko oyo batielaka mwinda ?
22Pamba te, makambo nyonso oyo ezali ya kobombana ekobima na polele, mpe makambo nyonso ya sekele ekoyebana. 23Soki moto azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka. 24Bongo alobaki lisusu : Bokeba na makambo oyo bozali koyoka. Ndenge bino bopesaka, bakopesa bino mpe ndenge moko, mpe bakobakisela bino. 25Pamba te, moto oyo azali na eloko, bakopesa ye mosusu ; kasi moto oyo azangi eloko, bakobotola ye ata oyo azali na yango.

Lisapo ya mbuma oyo ekolaki yango moko

26Yesu alobaki lisusu :

—Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko abwakaki mbuma na mabele.
27Butu mpe moi, alala to alamuka, mbuma ebimaki mpe ekolaki yango moko, mpe ayebaki te ndenge nini yango ezalaki kokola. 28Pamba te, mabele yango moko ebotaki mbuma : liboso matiti, sima mitu oyo esimbaka ble, bongo ble etondaki na mitu yango. 29Tango mbuma ekomelaki, azwaki mopanga oyo babukelaka mbuma, pamba te tango ya kobuka mbuma ekokaki.

Lisapo ya mbuma ya mutarde

(Mt. 13.31-32 ; Lk. 13.18-19)

30Yesu alobaki lisusu :

—Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisapo nini mpo na kolakisa yango ?
31Ekokani na mbuma ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka mbuma oyo elekaka moke na bambuma nyonso ya mokili. 32Kasi soki baloni yango, ekokola mpe ekokoma molayi koleka biloko nyonso oyo elonamaka ; mpe ebimisaka bitape ya minene, na ndenge ete bandeke bakoki koya kosala bandako na yango na nse ya malili na yango. 33Azalaki koloba eloko moko te epai na bango bongo azangisa lisapo. 34Kasi tango azalaki kotikala ye moko elongo na bayekoli na ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.

Yesu aleki mopepe na makasi

(Mt. 8.23-27 ; Lk. 8.22-25)

35Mokolo wana, tango pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Tokatisa na ngambo mosusu.

36Batikaki bato, bakamataki ye ndenge azalaki, kati na bwato. Babwato mosusu mpe ezalaki na ye elongo. 37Bongo mopepe moko ya makasi penza ebandaki koleka, bambonge ebandaki kobeta na bwato ; bongo bwato ebandaki kotonda na mayi. 38Yesu azalaki na suka ya bwato, alalaki mpe atiaki motu likolo ya kuse.

Bayekoli balamusaki ye mpe balobaki na ye :

—Moteyi, tolingi kokufa ! Ozali komitungisa te ?
39Alamukaki, agangelaki mopepe mpe alobaki na ebale :

—Tika makelele ! Vanda kimia !

Mopepe esilaki mpe kimia monene ezongaki.

40Bongo alobaki na bayekoli na ye :

—Mpo na nini bozali kobanga ? Ndenge nini bozangi kondima ?

41Kobanga monene ekotelaki bango mpe babandaki kotunana moko na moko :

—Yango moto oyo azali nani, mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ?
Copyright information for LinMNB